Given by the Prince of Peace - JESUS
Blessings are upon the head of the just: (Proverbs 10:6)



TESTIMONIES



English  |  German  |  Haitian Creole  |  Italian  |  Kinyarwanda  |  Kiyombe

Malagasy  |  Malayalam  |  Polish  |  Spanish  |  Tamil  |  Telugu


sepline

Sima ya kokoma na mboka Canada, bolembo monene ezalaki kati na motema na ngai pona ko kanisa makambo etali mokili pe bolingo ya mokili oyo.  Na lembaki makasi pe na yebaki eloko ya kosala te.

      

Na longwaki Vancouver, B.C. esika na komelaki tangu na yaki na Canada.  Pe nakendaki mboka Montréal, Qc kovanda mbula mineyi sima na yango, na zongi lisusu na mboka Vancouver, B.C. pona ko tikala libela pe koyekola anglais.  Bolembo pe makanisi ya mokili ebele kati na motema na ngai.  nionso nazalaki kolinga kosala ezalaki kosuka mabe.  Na kendaki ba ndako na Njambé misatu, na kendaki môko na môko na yango.  Kasi pasi na ngai ezalaki kaka kowumela, po ete ezali ko baluka ndako na Njambé te nde ekokaki ko bikisa ngai, kasi nde ko bongola motema na ngai.     Biblia elobi na Matai 6:33-34  «Bolukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo yonso Ekobakisama nabino»,  «Bomitungisa te mpo na lobi, lobi ekomitungisa mpo na yango mpenja.  Mabe na mokolo moko ekoki na yango.»

Na sanza ya misatu, na mbula ya 1996 na mboka Vancouver, nasilaki ko bengisama na kosangana na lingomba ya Sr Collins.  Na yokaki liloba ya Njambé, oyo eteyemaki na nguya nionso ya molimo mosantu na Njambé.  Na ndimelaki liloba, pe Nkolo Yesu na boboto na ye alimbisi masumu na ngai nionso.  Pe molimo mosantu eyaki kati na motema na ngai.  Kimia makasi pe esengo makasi kati na ngai, banda tango wana.  Nkolo Yesu apesaki ngai bomoi ya sika.  Pe bolingo ya mokili oyo, bolembo nionso esilaki kolonguwa na motema.

Biblia elobi na Matai 11:28  «Boya liboso na ngai, bino yonso bojali kolemba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino.»

1 Yoane 1:9 «Soko tokoyambola masumu na biso, ye ajali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopetola biso na bokesene yonso».

Na zali na esengo monene kati na ngai pona kobikisama pe koyeba Yesu na ndenge esengeli ya Solo.  Na zali na esengo pona kombo na ngai ekomama na lola.

Na kumisi kombo na Nkolo Yesu pe na pesi matondo mingi ya koleka ndelo, pona bototoli na Solo ya nguya na Njambé na kati ya lingomba ya mosali na ye ya muasi Sr Collins.  Na zongisi lisusu matondo na kolo, pona bizaleli ya Njambé nionso oyo azali kolakisa biso kati na mateya, kati na evandeli pe batoli kati na mayele na Nkolo Yesu, pe na mabondeli naye.

Sr Collins, azali motei makasi ya liloba ya nguya na molimo mosantu, pona ko bebisa makambo na monguna (diabulu) pe kososola misala ya mabe na bomoyi ya batu.  Yango wana ete, ba oyo bazalaki kolata loposo ya meme kati na lingomba na ye, nzoka nde bazali ba  meme ya Solo te, kasi bazali ba nkosi.  Batu wana, basili kobima kati na lingomba, mpe milimo ya mabe kati kati na bango etelemi.  Batu wana bazali koloba pe kokoma makambo ya tina te mpe ya lokuta po te balingi kotia bobulu na mosala na Njambé na maboko na Sr Collins pe na lingomba.

Biblia elobi na Yuda 4  «Jambi bato mosusu basili kokota nkuku ba oyo basili kokomama kalakala kati na makomi ete bakojua ekweli oyo bajali ba tioli na Njambé, ba kobalolaka ngolu na Njambé na biso kino bosoto, ba kowanganaka ye mokonji moko mpenja mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.

Bino bato bozali kotanga:

  • Boyoka liloba ya Solo ya Yesu oyo Sr Collins azali koteya, pote azali mosali oyo aponamaki epai na ye moko Nkolo.
  • Botondisa matoi na bino te na maloba ya lokuta oyo (diabulu) azali Ko tiya kati na batu na ye oyo babonguana miteme te  banda kala, Pona oyo etali mosali na Njambé Sr Collins pe na lingomba.  Bazali kokoma pe kotinda makambo ya lokuta na bipayi.  Bazali na nguya ya kobebisa lingomba na Njambé te.
  • «Bokoki pe koya, kotala pe Komeka boboto na Nkolo Yesu»

  • Ti lelo oyo, Nkolo azali kotinda bato na lingomba.  Bato oyo balingi koyeba Yesu pe kobonguana, pe kobikisama na ba malali na bango, pona lokumu na ye pe bokonzi na lola.  Lisusu pe, Njambé azali kosalela mosali na ye ya mwasi Sr Collins makasi, pona koteya pe kobondela pona batu nionso ya mabota nionso pe mboka nionso.

Pona kosukisa,
Sr Collins azali Moteyi ya Solo ya Yesu na kati na Solo, na boboto pe na bolingo na Njambé pona batu na bikolo nionso.  matondo mingi epai na Sr Collins.
1 Yoane 5:20

Bernice Nzumba Baku-Vuvu

République Démocratique du Congo (RDC)

sepline 

If you have in the past, attended Sister Therese Collins’ Ministries, and have received salvation, blessing or healing, we invite you to share it with us.

Sister Therese Collins’ Ministries


C.P. 205 Succ. St-Michel
Montreal, Qc, Canada, H2A 3L9

Telephone : (514) 803-4748
E-mail: info@sistercollinsministry.com

Any abusive language will not be read.